John 6

Yesu aleyisi mibali nkoto mitano

(Mt. 14.13-21 ; Mk. 6.30-44 ; Lk. 9.10-17)

1Sima na yango, Yesu akendaki na ngambo mosusu ya ebale ya Galilea (oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade). 2Bato ebele penza bazalaki kolanda ye mpo bazalaki komona makamwisi oyo azalaki kosala na bato ya maladi. 3Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna na bayekoli na ye. 4Nzokande Pake, feti ya bayuda ekomaki pene-pene.

5Tango Yesu atalaki mpe amonaki bato ebele penza bazalaki koya epai na ye ; atunaki Filipo :

—Tokosomba mapa wapi mpo bato oyo balia ?

6Atunaki ye motuna wana mpo na komeka ye pamba te ye moko ayebaki likambo oyo alingaki kosala.

7Filipo azongiselaki ye :

—Badeni nkama mibale ekokoka te kosomba mapa ya kokoka mpo ete moto nyonso azwa mwa ndambo.

8Moyekoli na ye moko, Andele ndeko ya Simon Piere, alobaki na ye :

9—Mwana moko ya mobali azali awa, azali na mapa mitano mpe bambisi mibale. Kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato boye ?

10Bongo Yesu alobaki :

—Bovandisa bato.

Matiti ezalaki mingi na esika yango ; bongo bango nyonso bavandaki. Mibali nyonso bazalaki pene-pene ya nkoto mitano.

11Yesu akamataki mapa, azongisaki matondi, mpe akabolaki yango na bato oyo bavandaki wana. Asalaki mpe ndenge moko na bambisi, mpe bazwaki ndenge bango balingaki.

12Tango bango nyonso batondaki, Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.

13Basangisaki yango mpe batondisaki bitunga zomi na mibale ya oyo etikalaki na mapa mitano oyo baliaki.

14Tango bato bamonaki likamwisi oyo Yesu asalaki, babandaki koloba :

—Moto oyo azali penza Moprofeta oyo asengeli koya na mokili.

15Awa Yesu ayebaki ete balingaki koya mpe kokomisa ye mokonzi na makasi, azongaki lisusu ye moko kaka, na ngomba.

Yesu atamboli likolo ya mayi

(Mt. 14.22-27 ; Mk. 6.45-52)

16Tango pokwa ekomaki, bayekoli na ye bakendaki na ebale. 17Bamataki na bwato mpe babandaki kokende na Kapenawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekomaki, mpe Yesu akomaki naino te epai na bango. 18Mopepe moko ya makasi penza ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki. 19Awa basilaki koluka nkayi bakilometele soki mitano to motoba, bamonaki Yesu azalaki kotambola likolo ya mayi mpe azalaki kopusana pene-pene na bwato ; kobanga ekangaki bango. 20Kasi Yesu alobaki na bango :

—Bobanga te, ezali ngai !

21Balingaki kokotisa ye na bwato, kasi kaka na tango wana, bwato ekomaki na libongo, epai bazalaki kokende.

Yesu azali lipa oyo epesaka bomoi

22Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayebaki ete bwato moko kaka ezalaki wana, mpe Yesu akotaki kati na yango te elongo na bayekoli na ye, kasi bayekoli bakendaki kaka bango moko. 23Bongo babwato mosusu oyo ewutaki na Tiberiade ekomaki wana, pene-pene na esika oyo balielaki mapa, tango Nkolo azongisaki matondi. 24Tango bato bamonaki ete Yesu na bayekoli na ye bazalaki wana te, bamataki na babwato mpe bakendaki na Kapenawumi mpo na koluka Yesu.

25Awa bakutaki ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki ye :

—Moteyi, okomaki awa tango nini ?

26Yesu azongiselaki bango :

—Ya solo penza nalobi na bino : bozali koluka ngai kaka mpo boliaki mapa mpe botondaki mingi, kasi ezali te mpo bomonaki makamwisi.

27Bosalaka mosala te mpo na bilei oyo ekobeba, kasi bosalaka mosala mpo na bilei oyo ekowumela kino na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na moto akopesa bino pamba te Nzambe Tata atia ye elembo.

28Bongo batunaki ye :

—Esengeli tosala nini mpo tosala misala ya Nzambe ?

29Yesu azongiselaki bango :

—Mosala ya Nzambe yango oyo : kondimela moto oyo ye atindaki.

30Batunaki ye :

—Elembo nini ya kokamwisa okosala mpo tokoka komona yango mpe tondima yo ? Okosala nini ?
31Bakoko na biso baliaki mana na esobe, ndenge ekomama : Apesaki bango mapa oyo ewutaki na Likolo.

32Yesu alobaki na bango :

—Ya solo penza nalobi na bino : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ewutaki na Likolo, kasi ezali Tata na ngai moto apesi bino lipa ya solo oyo ewuti na Likolo.
33Pamba te, lipa ya Nzambe ezali moto oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka bomoi na mokili.

34Bongo balobaki na ye :

—Nkolo, pesaka biso lipa yango mikolo nyonso !

35Yesu azongiselaki bango :

—Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto oyo akoya epai na ngai akoyoka lisusu nzala te ; mpe oyo akondima ngai, akoyoka lisusu posa ya mayi te.
36Kasi ndenge nayebisaki bino : bosiʼbomona ngai, kasi bozali kondima te.

37Bato nyonso oyo Tata apesi ngai, bakoya epai na ngai ; mpe nakobengana soki moke te moto oyo akoya epai na ngai. 38Pamba te soki nakiti wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki ngai. 39Nzokande, mokano ya Ye oyo atindaki ngai ezali boye : nabungisa ata moto moko te na kati ya bato oyo apesaki ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka. 40Pamba te mokano ya Tata na ngai ezali boye : moto nyonso oyo akotala Mwana mpe akondima ye, akozwa bomoi ya seko ; mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka.

41Bayuda babandaki koyima-yima, mpo alobaki : “Ngai nazali lipa oyo ewuti na Likolo !” 42Bongo bazalaki koloba :

—Boni, wana ezali Yesu te, mwana ya Zozefi, oyo toyebi tata na ye mpe mama na ye ? Bongo ndenge nini azali koloba : “Nawuti na Likolo ?”

43Yesu azongiselaki bango :

—Botika koyima-yima kati na bino !
44Pamba te, moto moko te akoki koya epai na ngai, soki Tata oyo atindaki ngai abendi ye te ; mpe ngai, nakosekwisa ye na mokolo yasuka. 45Ekomama boye na Mikanda ya baprofeta : Nzambe akoteya bango nyonso. Yango wana, moto nyonso oyo akoyoka Tata mpe akoyamba mateya na ye, akoya epai na ngai.

46Moto ata moko te asiʼamona Tata, longola kaka ye oyo awuti epai ya Nzambe ; ye nde amona Tata. 47Ya solo nalobi na bino : moto oyo andimi, azali na bomoi ya seko. 48Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. 49Bakoko na bino baliaki mana na esobe, basiʼbakufa.

50Kasi lipa oyo ewuti na Likolo ezali awa : moto oyo akolia yango akokufa te. 51Ngai nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo. Soki moto alie lipa yango, akozala na bomoi seko na seko.

Lipa yango ezali nde nzoto na ngai, oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi !

52Bongo Bayuda babandaki kotiana tembe bango na bango, bazalaki koloba :

—Ndenge nini akoki kopesa biso nzoto na ye mpo tolia yango ?

53Kasi Yesu alobaki :

—Ya solo penza nalobi na bino, soki bolie nzoto ya Mwana ya Moto te mpe soki bomeli makila na ye te, bokoki kozwa bomoi te.
54Oyo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, akozwa bomoi ya seko mpe nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 55Pamba te, nzoto na ngai ezali bileyi ya solo, mpe makila na ngai ezali eloko ya komela ya solo. 56Oyo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, ye akozala kati na ngai, mpe ngai nakozala kati na ye. 57Lokola Tata oyo atindi ngai azali na bomoi, ngai mpe nazali na bomoi mpo na ye ; yango wana moto oyo akolia ngai, akozala na bomoi mpo na ngai. 58Oyo ezali lipa ewuti na Likolo. Ekokani te na oyo bakoko na bino baliaki mpe bakufaki ; kasi moto oyo akolia lipa oyo, akozala na bomoi seko na seko. 59Yesu alobaki makambo oyo tango azalaki koteya na Ndako ya mayangani, na Kapenawumi.

Bayekoli ebele bakimi Yesu

60Bayekoli mingi ya Yesu, sima ya koyoka ye, balobaki :

—Mateya oyo ekomi makasi. Nani akoki kondima yango ?

61Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki koyima-yima mpo na yango ; bongo alobaki na bango :

—Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ?
62Bongo soki bomoni Mwana na moto azali kobuta mpo na kozonga epai ye azalaki liboso… 63Boyeba ete, Molimo nde apesaka bomoi ; nzoto esungaka na eloko moko te. Maloba oyo nalobi na bino, yango nde ezali Molimo mpe ezali bomoi. 64Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Pamba te, banda na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka ye.

65Bongo alobaki lisusu :

—Yango wana nalobaki na bino : moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata apesi ye nzela te !

66Banda tango wana, bayekoli na ye mingi batikaki ye mpe bazalaki kolanda ye lisusu te.

67Bongo Yesu atunaki bapostolo zomi na mibale :

—Bongo bino, bolingi mpe kokende ?

68Simon Piere azongisaki :

—Nkolo, tokende epai ya nani ? Yo moto ozali na maloba oyo epesaka bomoi ya seko.
69Biso tondimaka mpe toyebi ete yo ozali Mosantu ya Nzambe !

70Yesu alobaki na bango :

—Boni, ngai te moto naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Kasi moko na bino azali zabolo !

71Yesu alobaki bongo mpo na Yuda, mwana ya Simon Iskariote, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale pamba te ye moto akoteka ye.
Copyright information for LinMNB